Christian Children's Literature

 Books For Children

"God Gave Us Colors" was originally written for the children of Africa to teach them words for colors. They speak Lingala (ling-gah-lah) near Zaire (zi-ear). In their language they have a word for white, a word for black, and a word that covers all other colors. Gretchen Samuelson, a missionary to Zaire, Africa, gave them the French words for brown and all the Colors of the rainbow. I illustrated the story in their culture.

God Gave Us Colors

Translation in Lingala for African students!

Nzambe Apesi Bisco Langi
Texte par Ya Be-e-de
Dessins par Cherbear

Contact Me!

 


 
 
Nzambe Apesi Bisco Langi
Texte par Ya Be-e-de
Dessins par Cherbear
 
 


Nzambe apesi biso langi kitoko. Nini ezali rouge?

 

  © 1999 Cherbear © 1999 Cherbear

Oyebi eloko moko oyo ezalaka rouge?
Tala tomate, mpe pilipili, kasi keba!
Pilipili ekosoaka yo makasi!


Nini ezalaka rose? Tala likolo, liboso na kolimwa na moi.
Nzambe apesi yango bolangeti rose.

 

 © 1999 Cherbear

Bonne nuit, Mon Monsieur Moi! Lala malamu.


Orange ezali langi na mbila.
Ooh, mama akolamba bilei kitoko elongo na
mafuta na mbila.

 

 © 1999 Cherbear

 

Mpe nsima na kolia, monoko na ngai ekomi orange mpe.


Oyebi eloko oyo ezali jaune? Oliya yango mbala mingi.
Etabe ezali jaune. Makako elingi koliya bitabe.
Ngai nalingi bitabe jaune lokola.

 

© 1999 Cherbear © 1999 Cherbear © 1999 Cherbear

Felele na bitabe izali violet. Felele mosusu izali violet mpe.


Toyebi malamu eloko oyo ezalaka vert.
Mpondu ezali vert, matiti ezali vert, nkasa izali vert mpe.
Soko nafungoli miso na ngai, namoni vert epai yonso.

 

 

Eloko nini ezali brun? Biloko mingi! Nzete ezali brun, nzela ezali
brun, mpe elongi na mama na ngai - ezali kitoko, ezali brun.


Bleu ezali kitoko mingi.
Yango wana Nzambe apesi biso bleu lokolo na yonso.
Tala likolo - ezali bleu lelo?

 

 

 © 1999 Cherbear

Ntango mosusu, mapata na likolo izali mpembe.
Mpe ntango mosusu, soko moi ezali makasi,
miso na ngai makoki kotala mpembe yango mingi te.
Lipata oyo ezali nini? Ezali lokola nyama?
Te, namoni ndako kuna, to ntango mosusu lipata ekomi nzete monene, mpe nsima moke ekolimwa.


Noir ezali langi na nsuki na ngai, mpe na nsuki na moninga na ngai,
mpe nsuki na ndeko na ngai. Makala ezali noir,
mpe pusu na baninga na biso ezali pusu noir.

 

 © 1999 Cherbear

© 1999 Cherbear


Merci, Nzambe, mpo na langi kitoko.
Mpe nsima na mbula, ntango mosusu,
namoni monama na langi mingi na likolo.
Na ntango wana, nalobi ete,
"Merci Nzambe! Opesi biso mokili kitoko!"

 

 
CEUM 1996
Dessins par Cherbear
© 2000 Cherbear
All copyrights reserved

 

English Versions of this story

Other Books by Gramma Cherbear

The ABC's of Joshua's World

What is Salvation? for kids

Jonah and the Little Blue Fish!


Cherbear's Den Banner

Did you come here from a Search Engine?

Please accept my invitation to visit

Cherbear's Den, The Kid Cave, and The Teen Cave.

If you hear music playing in more that one page "what a racket,"
just close the one you are finished with!

 
© 1999 Cherbear
Illustration and Web Design
by Cherbear
contact